Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 22:25 - Mokanda na Bomoi

25 Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana : — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 22:25
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !


Mokonzi ya basoda alobaki : — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.


Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »


Kasi Polo azongisaki : — Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku ? Te, ekosalema bongo te ! Tika ete bango moko baya kobimisa biso !


Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda : — Okosala nini ? Tata oyo azali moto ya Rome.


Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye : — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.


Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nakangolaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome.


Kasi nayebisaki bango ete bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye, mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye.


Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama moko ya Rome, kati na mampinga ya mokonzi monene.


Mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba Sidoni. Lokola Juliusi atalisaki bolingo monene epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala balingami na ye mpo ete akoka kozwa masungi epai na bango.


Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama moko azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango kokokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ