Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 22:24 - Mokanda na Bomoi

24 mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 22:24
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Pilato apesaki mitindo ete bakamata Yesu, mpe abetisaki Ye fimbu.


Kasi Polo azongisaki : — Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku ? Te, ekosalema bongo te ! Tika ete bango moko baya kobimisa biso !


Kati na ebele ya bato oyo batondaki wana, bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola te bosolo ya likambo, mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo kati na lopango ya basoda.


Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda : — Nakoki koyebisa yo likambo moko ? Mokonzi ya basoda atunaki Polo : — Oyebi koloba lokota ya Greki ?


Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni ; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.


Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nakangolaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome.


Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa.


Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ