Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 22:21 - Mokanda na Bomoi

21 Kasi Nkolo azongiselaki ngai : « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 22:21
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki : — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.


Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.


Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima.


Nazali koloba na bino Bapagano : lokola nazali ntoma ya Bapagano, napesaka lotomo na ngai lokumu


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye,


mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.


Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.


Ezali mpo na Sango Malamu yango nde Nzambe atiaki ngai moteyi, ntoma mpe molakisi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ