19 Nazongisaki : « Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbu, bato oyo bazalaki kondimela Yo.
Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.
Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
Nzokande, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendeki epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe,