10 Natunaki : « Nkolo, nasala nini ? » Nkolo alobaki na ngai : « Telema, kende na Damasi ; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »
Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge oyei. Sik’oyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso.
Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango : — Batata, nasala nini mpo ete nabika ?
Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu : — Bandeko, tosala nini ?
Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga ya pole wana ebomaki ngai miso.
Kasi sik’oyo, telema, kota kati na engumba, mpe, kuna, bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.