Misala ya Bantoma 22:1 - Mokanda na Bomoi1 — Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango : — Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.
Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende.