Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 21:4 - Mokanda na Bomoi

4 Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki elongo na bango mikolo sambo. Nzokande Molimo asololaki na Bayekoli, mpe balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 21:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Bayekoli mosusu ya Sezarea bakendeki kotika biso ; bamemaki biso na ndako ya Minaso, epai wapi tovandaki. Azalaki moto ya Shipre, mpe akomaki moyekoli wuta kala.


Kati na engumba yango, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda elongo na bango poso mobimba. Ezali ndenge wana nde tokendeki na Rome.


Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.


Kutu tango akomaki na Rome, asalaki nyonso mpo na koluka ngai kino amonaki ngai.


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ