Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !
Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : — Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !
tango bakoselaka biso makambo mpo na kobebisa lokumu na biso, tozongisaka kaka na maloba ya boboto. Mpe kino sik’oyo, tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola lisapo ya bato.