Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 21:34 - Mokanda na Bomoi

34 Kati na ebele ya bato oyo batondaki wana, bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola te bosolo ya likambo, mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo kati na lopango ya basoda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 21:34
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mobulu makasi ekotaki kati na ebele ya bato : bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe bamosusu, mpo na likambo mosusu. Mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basangani wana.


Wana balingaki kokotisa ye kati na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda : — Nakoki koyebisa yo likambo moko ? Mokonzi ya basoda atunaki Polo : — Oyebi koloba lokota ya Greki ?


mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.


Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.


Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni ; apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye kati na lopango ya basoda.


Kasi tango mwana mobali ya ndeko mwasi ya Polo ayokaki motambo yango, akendeki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo.


Mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kokende elongo na ye.


Lokola nazali na likambo moko te ya malonga ya kokomela mokonzi monene na tina na ye, nayei na ye mpo ete asamba liboso na bino nyonso, mpe mingi-mingi liboso na yo, mokonzi Agripa, mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, sima na biso kotuna ye mituna.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ