Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 21:31 - Mokanda na Bomoi

31 Wana bazalaki koluka koboma Polo, sango ekomaki kino na matoyi ya mokonzi ya basoda ya Rome ete mobulu ekoti kati na Yelusalemi mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 21:31
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki : — Makelele wana kati na engumba elakisi nini ?


Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »


Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda.


pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ;


Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »


Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.


Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete botombokisi bato, mpo na makambo oyo esalemi lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato basangani awa. Tango kaka asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.


Boni, ezali yo te moto ya Ejipito oyo akotisaki mobulu na mikolo oyo eleki mpe amemaki batomboki nkoto minei kati na esobe ?


Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : — Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !


Bongo Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama moko mpe alobaki na ye : — Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye.


Felikisi, oyo ayebaki malamu makambo oyo etali Nzela, azongisaki bango mpe alobaki : — Nakoyekola malamu likambo na bino tango mokonzi ya basoda, Lisiasi, akoya.


mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye kolanda Mobeko na biso,


kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda, ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi.


Mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato, elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo.


Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai kati na Tempelo mpe balukaki koboma ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ