Misala ya Bantoma 21:3 - Mokanda na Bomoi3 Tango tomonaki esanga ya Shipre, totikaki yango na ngambo ya loboko ya mwasi mpe tokobaki mobembo na biso na mopanzi ya Siri. Totelemaki na Tiri epai wapi masuwa esengelaki kokitisa biloko oyo ememaki. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango.
Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.