Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 21:24 - Mokanda na Bomoi

24 Zwa bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka na tina na yo ezali ya lokuta, mpe bakososola ete yo moko mpe otosaka Mobeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 21:24
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.


Na mokili, nyama moko te ekokani na yango ; mpe ebangaka te.


Yawe alobaki na Moyize : — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ;


Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango.


Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani


Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani.


Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola.


Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.


Kasi lokola feti ya Pasika ya Bayuda ekomaki pene, bato mingi ya mboka bakendeki na Yelusalemi mpo na komipetola liboso ya feti yango.


Mokolo moko, bayekoli ya Yoane bazalaki kobendana na Moyuda moko na tina na kopetolama.


Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.


Mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Bongo akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo tango ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakobonza mbeka mpo na moko na moko kati na bango.


Bakutaki ngai nasilisi komipetola kati na Tempelo ; ezalaki na ebele ya bato te elongo na ngai, mobulu mpe te.


Tango nazalaka elongo na Bayuda, nakomaka lokola Moyuda mpo ete namema bango epai ya Klisto ; tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko, nakomaka lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko, mpo ete namema bango epai ya Klisto, atako ngai moko nazali na se ya bokonzi ya Mibeko te.


Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano ; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.


pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ