Misala ya Bantoma 21:21 - Mokanda na Bomoi21 Nzokande, bayokaki sango ete oteyaka na Bayuda nyonso oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe ete olobaka na bango ete bakata lisusu te ngenga ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango : — Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome.