Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 21:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sima na ye kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya lotomo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 21:19
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›


Azalaki moko kati na biso mpe asanganaki elongo na biso kati na lotomo oyo epesamelaki biso. »


Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.


Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.


Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.


Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino : molende, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa.


Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;


Ezali mpo na yango nde nasalaka mpe nabundaka na nzela ya makasi ya Klisto, oyo esalaka na nguya kati na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ