Mokolo oyo elandaki, tokendeki na Sezarea mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi Sango Malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki.
Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.
Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.