Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki : — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki.
Moto oyo azali kopesa litatoli na tina na makambo oyo amonaki yango kosalema na miso na ye, mpe litatoli na ye ezali ya solo ; ayebi penza ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima.
Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.