Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 20:23 - Mokanda na Bomoi

23 Eloko moko kaka nayebi : Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 20:23
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »


Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.


Nazalaki tango nyonso kosenga, ezala na Bayuda to na bato ya Grese, ete bazongela Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe batia kondima na bango kati na Yesu, Nkolo na biso.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »


Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Bongo atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini.


Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki elongo na bango mikolo sambo. Nzokande Molimo asololaki na Bayekoli, mpe balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te.


Molimo alobaki na Filipo : — Kende mpe pusana pene ya shar wana.


Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na Ngai.


na tina ete moko te kati na bino abungisa kondima likolo ya pasi oyo bozali komona ; pamba te bino moko boyebi malamu ete tobongisama mpo na yango.


Molimo alobi polele ete, na tango ya suka, ebele bakosundola kondima, pamba te bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya oyo ewuti na milimo mabe.


Soki toyiki mpiko, tokokonza mpe elongo na Ye. Kasi soki towangani Ye, Ye mpe akowangana biso ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ