Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Nzokande, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino, ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 20:20
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.


Mosakoli Jeremi alobaki na bango : — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te.


azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso.


Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.


pamba te nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe mpe nabombelaki bino ata eloko moko te.


Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.


Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango.


Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola Sango Malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto.


Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso.


Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi ?


Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki : Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi ;


Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango.


Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo ! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino.


Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.


teya Liloba, betela yango sete na tango ya malamu to te, zongisa na nzela, pamela mpe lendisa na nzela ya mateya na yo mpe na kokanga motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ