Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 20:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.


Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.


Kolongwa wana, tokendeki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki kuna mwa mikolo.


Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki.


Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda.


Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.


Tango mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendeki na Masedwane.


Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendeki.


epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalelaki ye likita. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane.


Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.


Ezali Ye Klisto nde biso tosakolaka, na kokebisa mpe na koteya moto nyonso, na bwanya nyonso, mpo na kokomisa moto nyonso ya kokoka kati na Klisto.


Boyebi mpe ete tosalaki, epai ya moko na moko kati na bino, ndenge penza tata asalaka mpo na bana na ye :


Pamba te, soki tosengaka na bato ete bandimela Nzambe, ezali te mpo ete tozali kati na libunga to totondi na makanisi ya mbindo to mpe tolukaka kokosa bato.


Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ