Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
Nzokande, elenge mobali moko avandaki na lininisa ; kombo na ye ezalaki Etikisi. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi, mpe, mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.