46 Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
Neyemi alobaki na bango lisusu : — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei ; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.
Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita-Monene—lisanga mobimba ya bakambi ya bana ya Isalaele—mpe bapesaki mitindo ete bakende kozwa bantoma na boloko.
tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo !
Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ?
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.
Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.
Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
Bawumbu, botosaka bankolo na bino na makambo nyonso ; na miso na bango kaka te, lokola nde bozali kosepelisa bato, kasi na mitema ya bosembo mpe kati na kotosa Nkolo.