Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te ? Mpe sima na koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi ? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye ? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe !
Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.