Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo, oyo asengelaki kokende na mobembo, mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu.
Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe.
Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi ?
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.
Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.
Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.
Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.