Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 2:39 - Mokanda na Bomoi

39 Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 2:39
41 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo.


Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene.


Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »


Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe ; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye ; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.


« Mpo na Siona, mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, oyo bakobongwana na masumu na bango, » elobi Yawe.


Bakosala mosala na pamba te to bakobota bana te mpo ete bakufa ; pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, bango elongo na bana na bango.


Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela.


Bandimi oyo bazalaki bakatama ngenga, oyo bayaki elongo na Petelo wuta na Jafa, bakamwaki mingi komona ete Nzambe asopi likabo ya Molimo Mosantu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.


Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima.


Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.


pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.


Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango ; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo ; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.


Ezali biso nde Nzambe abengaki, kaka kati na Bayuda te kasi mpe kati na Bapagano,


oyo bazali bana ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango kosambela na solo, apesa bango bilaka


Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.


Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu,


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.


Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki.


Yango wana tobondelaka tango nyonso Nzambe na biso mpo na bino, mpo ete akomisa bino bato oyo babongi na bomoi oyo abengaki bino mpo na yango ; mpe mpo ete, na nzela ya nguya na Ye, akokisa posa na bino ya kosala bolamu to makambo nyonso oyo kondima na bino ezali kotinda bino kosala.


pamba te abikisaki biso mpe abengaki biso mpo ete totambola na bomoi ya bule. Mpe soki asalaki bongo, ezali te mpo na misala na biso, kasi ezali nde mpo na mabongisi mpe ngolu na Ye moko kaka, ngolu oyo apesaki biso kati na Yesu-Klisto liboso ya ebandeli ya tango.


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Yango wana, Klisto azali Moyokanisi kati na Boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa libula ya seko oyo Nzambe alakaki bango. Mpe bakoki solo kozwa yango, pamba te Klisto asilaki kokufa lokola mbeka mpo na kosikola bango na masumu oyo basalaki tango bazalaki na se ya bokonzi ya boyokani ya kala.


Kasi sima na bino komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na Ye ya seko kati na Yesu-Klisto, akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi mpe akotelemisa bino ngwi.


Yango wana, bandeko na ngai, bosala lisusu makasi koleka mpo na kolakisa na bato ete Nzambe abenga penza bino mpe apona bino ; pamba te soki bosali bongo, bokotikala kokweya te.


Nzambe apesaki biso, na nzela ya nguya na Ye ya bonzambe, nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kobika bomoi ya botosi kati na makambo ya Nzambe mpe mpo na kokangama na Ye ; asalaki yango na kopesa biso boyebi ya Ye oyo abenga biso mpo ete tosangana na nkembo mpe na bolamu na Ye.


Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ