31 Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki lisekwa ya Klisto ete Nzambe akosundola Ye te kati na mboka ya bakufi mpe akotika te ete nzoto na Ye epola.
Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.