30 Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »
Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »
mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.
yango wana Nzambe abongisi lisusu mokolo moko oyo azali kobenga « lelo, » tango alobaki, sima na mikolo, na nzela ya Davidi : « Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, boyeisa mitema na bino mabanga te. »
Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye : « Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te : ‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »