Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 2:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala !


Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »


Nalobaki : « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! »


« boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe.


Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto.


Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.


Batunanaki : — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?


Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! »


Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota.


Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.


Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »


Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ