26 Yango wana, motema na ngai etondi na esengo, mpe lolemo na ngai ezali kosepela. Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,
Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ; Yawe, zala lisungi na ngai. »
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Nakoganga na esengo tango nakoyemba banzembo mpo na lokumu na Yo, pamba te okangoli bomoi na ngai.
Boye, tala makambo oyo Davidi aloba na tina na Ye : « Nazalaki komona Nkolo mikolo nyonso liboso na ngai, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi mpe okotika te ete mosantu na Yo apola.