Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 2:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !


Mata likolo ya ngomba, Siona, yo momemi sango malamu ; tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; tombola yango penza, kobanga te ; loba na bingumba ya Yuda : « Botala Nzambe na bino ! »


« Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe ! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.


Oh bato na ngai, boyoka ngai ! Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu : Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo.


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.


Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te ? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.


« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.


Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.


Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi


Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.


Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki : — Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai !


Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,


na koganga : — Bato ya Isalaele, bosunga biso ! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso mpe na bisika nyonso, ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo oyo. Lisusu, akotisi bato ya Grese kati na Tempelo mpe akomisi esika oyo ya bule mbindo.


Alobaki na bango : — Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo.


Etieni azongisaki : — Batata mpe bandeko, boyoka ngai ! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani.


Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka ! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ