6 Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na nkota ya sika mpe kosakola.
Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika,
Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale.
Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.
Boye, Ananiasi akendeki mpe akotaki kati na ndako ; atielaki Saulo maboko na koloba : — Ndeko na ngai, Saulo ; Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela, wana ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu.
Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.
Yango wana nazali kolendisa yo ete olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natiaki yo maboko.