Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato ; alobaki : — Bato ya Efeso ! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo ?