Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 19:34 - Mokanda na Bomoi

34 Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene bangonga mibale ya koganga lokola moto moko : — Artemisi ya Efeso azali monene !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 19:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.


Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.


Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki : — Bato oyo bazali Bayuda ; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso.


Demetriusi, mosali ya babiju, azalaki kosala na palata bililingi ya batempelo ya nzambe Artemisi. Na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi.


Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.


Tango kaka bayokaki bongo, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga : — Artemisi ya Efeso azali monene !


Bayuda kati na ebele ya bato batindikaki Alekizandre na liboso, mpe batalisaki ye likambo yango ndenge ezali. Bongo Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi kozwa maloba mpo na kotalisa na bato.


Suka na suka, mokomi mikanda ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato ; alobaki : — Bato ya Efeso ! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya Artemisi, nzambe mwasi monene, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo ?


Yo oyo olobaka na bato ete basala ekobo te, boni, osalaka ekobo ? Yo oyo omipesaka te na banzambe ya bikeko, boni, ozwaka na makasi biloko kati na batempelo ?


Bato bagumbamelaki dalagona mpo ete epesaki bokonzi na yango epai ya nyama wana. Bagumbamelaki mpe nyama yango na maloba oyo : « Nani akokani na nyama oyo ? Nani akoki kobundisa yango ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ