Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »
Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.
Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.
Polo azongisaki : — Te, ezali ngai te ! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, kati na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato.