Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 19:26 - Mokanda na Bomoi

26 Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 19:26
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Yango wana, lokola tozali bana na Nzambe, tosengeli te kokanisa ete bonzambe ekokani na elilingi ya wolo, ya palata to ya libanga, lokola nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto.


Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendeki ye moko na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Esalaki bongo mibu mibale ; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo.


Asangisaki bango elongo na bato ya misala ya maboko, oyo basalaka mosala moko na ye, mpe alobaki na bango : — Baninga na ngai, boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu.


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.


Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.


pamba te bango moko bazali kotatola ndenge nini boyambaki biso mpe ndenge nini botikaki kosambela banzambe ya bikeko mpo na komipesa na Nzambe mpe mpo na kosalela Nzambe na bomoi mpe ya solo,


Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ