Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 19:17 - Mokanda na Bomoi

17 Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 19:17
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki : « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai ? »


Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi ; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto.


Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te.


Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda.


Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !


Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalemaki, andimaki, pamba te mateya na tina na Nkolo ekamwisaki ye makasi.


Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendeki ye moko na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda.


Atikaki bango na koloba : — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Mpe moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango, akangaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi penza kino babimaki na ndako bolumbu mpe batonda na bapota.


Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe.


Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa.


Somo monene etondisaki Lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango.


Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi.


Tango Ananiasi ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo.


Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.


Tosambelaka bongo mpo ete Kombo ya Yesu, Nkolo na biso, epesamela nkembo kati na bino, mpe bino bozwa lokumu kati na Ye kolanda ngolu ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu-Klisto.


Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.


Bato ya Beti-Shemeshi balobaki : « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule ? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ