Misala ya Bantoma 19:13 - Mokanda na Bomoi13 Ndambo ya Bayuda oyo bazalaki kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe ; bazalaki koloba : — Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo ya kobima. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »
Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.