Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani, elongo na libota na ye mobimba bazalaki na kondima epai ya Nkolo ; mpe bato mingi ya Kolinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi.
Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya Grese oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi.
Nzokande, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato mpe kobenda sima na ye bato ebele awa kaka na Efeso te, kasi mpe na etuka mobimba ya Azia ; azali koloba ete banzambe oyo esalemi na maboko ya bato ezali banzambe te.
Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe ya kolekisa tango te na mokili ya Azia, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi mpo ete azala na mokolo ya Pantekoti.
Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango : — Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azia.
Soki ezali kaka mpo na makambo ya bomoto nde nabundisaki banyama ya zamba kati na Efeso, litomba nini nazwaki ? Soki bakufi bakosekwa te, « wana tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa ! »
Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.
Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.