« Ganga na mongongo makasi, kotika te ! Matisa mongongo na yo lokola kelelo, yebisa bato na Ngai botomboki na bango, mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye.
Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
Na butu, Polo azwaki emoniseli moko : « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye : ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane ! › »
Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo kati na emoniseli mpe alobaki na ye : — Yika mpiko ! Ndenge kaka otatolaki na tina na Ngai kati na Yelusalemi, ndenge mpe osengeli kotatola kati na Rome.
Kati na Damasi, ezalaki na moyekoli moko oyo kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Nkolo abengaki ye kati na emoniseli : — Ananiasi ! Azongisaki : — Nkolo, ngai oyo !
Boyebi lisusu ete, sima na biso konyokwama mpe kofingama kati na Filipi, toteyaki bino, na lisungi ya Nzambe na biso mpe na molende nyonso, Sango Malamu na Ye kati na bitumba makasi.