Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:6 - Mokanda na Bomoi

6 Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:6
37 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »


Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.


Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! Lisanga mobimba ezongisaki : — Amen ! Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki.


adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !


Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.


Bazongisaki : — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango.


Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango. [


Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna : bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.


Bato nyonso bazongisaki : — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso !


Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.


Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.


Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.


Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi.


Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.


Nateyaki liboso bavandi ya Damasi ; sima, nateyaki bavandi ya Yelusalemi, ya Yuda mobimba mpe ya bikolo ya bapaya : nateyaki bango ete basengeli kobongola mitema, kozonga epai ya Nzambe mpe, na nzela ya misala na bango, kolakisa penza ete babongoli mitema.


Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na Ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bakoyoka. [


Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.


Kotiela moto maboko noki te mpe kosanganaka te na masumu ya bato mosusu. Mibatela peto.


mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo.


Soki bafingi bino likolo ya Kombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, pamba te Molimo ya nkembo, Molimo ya Nzambe, azali likolo na bino.


Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ