Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:28 - Mokanda na Bomoi

28 pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:28
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,


Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango : — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.


Bateyaki ye nzela ya Nkolo ; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.


Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.


Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.


Nzokande, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali Klisto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ