Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:27 - Mokanda na Bomoi

27 Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Kolinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:27
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo


Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Kolinto. Bongo, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendeki na Siri elongo na Prisile mpe Akilasi. Liboso na Polo kolongwa na libongo ya Sankresi, akokolisaki suki ya moto na ye, pamba te alapaki ndayi.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


Barnabasi azwaki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma ; ayebisaki bango ndenge nini Saulo, na mobembo na ye, amonaki Nkolo, mpe ete Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango lisusu ndenge nini, kati na Damasi, ateyaki na mpiko na Kombo na Yesu.


Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima.


Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.


Tango nakoya, nakotinda elongo na mikanda, bato oyo bino moko bokopona, mpo ete bamema makabo na bino kuna na Yelusalemi.


Ngai nalonaki, Apolosi asopaki mayi, kasi Nzambe azalaki kokolisa.


ezali mpe te mpo na kokonza kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te botelemi ngwi kati na kondima.


Lokola nandimisami na yango, nayebi malamu ete nakowumela mpe nakokoba kozala kati na bino nyonso, mpo na kosunga ete bokola mpe bosepela kati na kondima.


Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye,


bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi ; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi.


Arisitarke, moninga na ngai kati na boloko, atindeli bino mbote. Boyamba mpe mbote ya Malako, ndeko ya Barnabasi, oyo na tina na ye napesaki bino mitindo ete, soki ayei epai na bino, boyamba ye malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ