Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:25 - Mokanda na Bomoi

25 Bateyaki ye nzela ya Nkolo ; mpe, lokola azalaki molende, azalaki koloba mpe kolakisa na bosolo makambo oyo etali Yesu atako ayebaki kaka libatisi ya Yoane.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:25
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »


Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !


Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye ;


Mongongo ya moto moko ezali kobelela : « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso nzela moko ya monene.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema na esika oyo nzela ekutana, botuna nzela ya kala mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia mpo na mitema na bino. Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›


Efrayimi akoloba : « Banzambe ya bikeko ezali lisusu na tina nini epai na Ngai ? » Ngai nakoyanola ye mpe nakosunga ye. Nazali lokola nzete ya sipele ya mobesu, Ngai nde nasalaka ete obota mbuma.


Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »


Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ?


mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki.


Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango


— Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ?


Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga : — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.


Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akilasi bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe.


Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso na tina na Nzela ya Nkolo.


Polo atunaki bango lisusu : — Bongo libatisi ya ndenge nini penza bozwaki ? Bazongisaki : — Tozwaki libatisi ya Yoane.


Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga ; baboyaki kondima mpe batiolaki nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Bongo Polo akabwanaki na bango. Amemaki bayekoli mpe, mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya Tiranisi.


mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.


mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;


Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.


Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.


Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. »


Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ