Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:23 - Mokanda na Bomoi

23 Sima na Polo kovanda mwa mikolo na Antioshe, alongwaki kuna mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, na kolendisa bayekoli nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:23
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango ; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.


Na mobu ya liboso ya bokonzi ya Dariusi, moto ya Medi, nazalaki wana mpo na kosunga mpe kobatela ye.


Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu,


Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.


Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.


Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.


Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.


Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome,


Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.


mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai ; Epai ya Mangomba ya Galatia :


Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo : soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe !


Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai ; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.


Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye ; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona.


Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,


Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ