Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Tango akomaki na Sezarea, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote ; sima, akendeki na Antioshe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:22
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na Sezarea, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Kornei ; » azalaki mokonzi ya basoda oyo babengamaka « mampinga ya Itali. »


Sima na mokolo moko, bakomaki na Sezarea. Kornei azalaki kozela bango, mpe abengisaki bato ya libota na ye mpe balingami na ye mpo ete bazala lisanga.


Kaka na tango yango, bato misato bakomaki na ndako epai wapi nazalaki kovanda ; batindaki bango epai na ngai longwa na Sezarea.


Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.


Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.


Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.


Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango.


Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.


Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.


Sima na mwa tango moke, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama moko mpe alobaki na bango : — Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na bampunda mpe basoda mosusu nkama mibale, mpo ete bakende na Sezarea, na ngonga ya libwa ya butu.


Mikolo misato sima na ye koya kati na etuka, Festisi alongwaki na Sezarea mpo na kokende na Yelusalemi


Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo : — Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo ?


Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ