Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 18:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko ; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 18:15
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino.


Alobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !


Pilato alobaki na bango : — Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino. Bayuda bazongiselaki ye : — Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa.


mpe bafundaki ye boye : — Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete bagumbamela Nzambe na lolenge oyo mibeko epekisa.


Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.


Soki nasali mabe to nasali likambo oyo ekoki komemela ngai etumbu ya kufa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Sezare akata likambo na ngai !


Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi ; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. »


pamba te oyebi malamu bizaleli mpe tembe ya Bayuda. Boye nasengi na yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai.


to bakangama te na masapo ya pamba-pamba mpe na botangi milongo ya mbotama, oyo ezangi suka. Makambo ya bongo ebimisaka kaka tembe, na esika ete esunga mpo ete mosala na Nzambe, oyo toyebi na nzela ya kondima, ekende liboso.


azali moto na lolendo, ayebi eloko te, azali kobela bokono ya kotia tembe mpe ya koswana na tina na maloba oyo ebotaka zuwa, koswana, kofingana, kokaniselana mabe


Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana.


Kasi kima tembe ya bozoba, masolo ya milongo ya mbotama, koswana mpe bitumba na tina na mibeko : ezali na litomba te mpe ezali na tina te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ