11 Boye, Polo avandaki na Kolinto, mobu moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba na Nzambe.
Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene.
Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.
Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo
Esalaki bongo mibu mibale ; boye Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya Grese, oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azia bayokaki Liloba na Nkolo.
Yango wana, bosenzela ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moyi, natikaki te kokebisa moko na moko na bino, mpe tango mosusu elongo na mpinzoli.