Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:7 - Mokanda na Bomoi

7 mpe Jazoni ayambi bango lokola babengami kati na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba : « Mokonzi mosusu azali, Kombo na Ye : Yesu ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi, mokonzi, ezali na ndambo ya Bayuda oyo okomisaki bayangeli na etuka ya Babiloni : Shadraki, Meshaki mpe Abedinego, oyo bazali kotosa yo ata moke te : bazali kosalela banzambe na yo te mpe kogumbamela te ekeko ya wolo oyo osali.


Mbala moko, bakendeki epai ya mokonzi mpo na kosolola na ye na tina na mokano oyo azwaki : — Mokonzi, opanzaki sango te ya mokano oyo ozwaki, ete na mikolo tuku misato oyo ekolanda, moto nyonso asengeli kosambela kaka yo, mokonzi ; bongo moto oyo akosambela nzambe to moto mosusu, basengeli kobwaka ye kati na libulu ya bankosi ? Mokonzi azongisaki : — Ezali penza bongo ! Mokano ezali ndenge kaka ekatamaki, kolanda mibeko ya bato ya Medi mpe ya Persi, oyo bakoki kobongola te.


Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.


mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !


Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga : — Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.


Bazali koluka kokotisa awa bizaleli oyo mibeko epekisi biso, bato ya Rome, kondima mpe kosalela.


Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato.


Tango ebele ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi.


Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Raabi, mwasi ya ndumba : Nzambe akomisaki ye moto ya sembo mpo ete ayambaki, abombaki mpe akimisaki na nzela mosusu banongi ya Isalaele.


Pamba te, Nzambe alingi boye : bosalaka bolamu mpo na kokanga minoko ya bato oyo bazangi boyebi mpe bososoli ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ