Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Misala ya Bantoma 17:3 - Mokanda na Bomoi

3 Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango : — Yesu oyo nazali koteya bino, Ye nde azali Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Misala ya Bantoma 17:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batunanaki : — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?


Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;


Kasi kino na tango wana, basosolaki nanu te ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi, kolanda ndenge Makomi ezali koloba.


Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo : « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.


pamba te maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele, na nzela ya Makomi, ete Yesu azali Klisto.


Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka na koteya Liloba mpe kotalisa solo epai ya Bayuda ete Yesu azali Klisto.


Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi.


Nzokande, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali Klisto.


Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole ! Nani aloki bino ? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ