27 Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka Ye, tango mosusu bakolonga komona Ye na kolukaluka lokola mokufi miso. Nzokande, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko kati na biso.
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.
To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?
Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?