26 Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba ; mpe akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovanda.
Oh ekuke, lela makasi ! Engumba, ganga makasi ! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda ! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.
Ye abwaki zeke mpo na bango mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi, mpo na kokabolela bango mboka. Bakozwa yango mpo na libela mpe bakovanda wana libela na libela.
Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.
Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ?
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.